Mike kalambay

Azali se yo moko

Mike kalambay
Azali te na mona te
Oyo'a leki yo yesu na nguya
Likolo na se misala ya liloba na yo ya nguya

Alleluia
Soki ba nzambe bazali
Yesus na ngai nde nzambe
Yes

Nani akotuta tembe na oyo yo ozali
Osala misala emonana na miso ya banto
Na egypito kino lelo ba yebi
Misala ya loboko no ya nguya

Pharaon mikanisaki elombe
Asuki liboso ya israela
Wana etalisi yo oza nzambe
Mosusu te
Mosusu te

Azali te na mona te
Oyo'a leki yo yesu na nguya
Likolo na se misala ya liloba na yo ya nguya

Moto ya mayele balandaki monzoto
Kombo na ye yesu
Mwana moke na maboko ya mama na ye
Nzoka nde mokozi

Elobamaki na lisako ya isaaya
Akosala mobikisi
Bamemaki olo bamemaki malasi
Mpaka malasi
Kongumbamela oyo abongi na lokumu
Mwana na mpate
Na yoka te, na yoka te
Oyo aleki yo yesu na nguya
Tangela ngai oyo aleki yo yesu na nguya
Oh na mona te, na mona te
Oyo aleki yo yesu na makasi
Tangela ngai oy'aleki yo yesu na nguya

Soki ya bango aza mokonzi
Ya biso mokonzi na bakonzi
Tangela ngai oy'aleki yo yesu na nguya

Ah ebanda boni na yemba yesu
Nzambe mokeli esika moko na bikelamu
Tangela ngai oy'aleki yo yesu na nguya

Hum tika ngai na netola yo yaya
Tika ngai na netola yo
Yamba loyembo ya sika libonza pona yo
Tika ngai na netola yo
Yo liloba ya bomoyi, okomisa ngai mwana nzambe
Tika ngai na netola yo
Ah to yemba yo to yemba lisusu nani
Tika ngai na netola yo

Osala biso ngolu toyeba babombami na yo
Topona no yemba mokeli bikelamu te oh
Basantu boya totatola oyo azali

Ah ya liboso aza nzambe
Amen
Ya mibale aza mokonzi
Amen
Ya misatu aza papa
Amen
Ya mineyi alalaka te
Amen
Ya mitanu aza nionso yes
Amen
Libela na libela ozali nzambe

Na yoka te, na yoka te
Oyo aleki yo yesu na nguya
Tangela ngai oy'aleki yo yesu na nguya
Ah na mona te, na mona te
Oyo aleki yo yesu na makasi
Tangela ngai oy'aleki yo yesu na nguya

Baninga pona yesu na ngai
Azali se ye moko
Nzambe na bomoyi
Azali se ye moko
Wuta mokili ezala kino lelo
Nayembi nzambe mosusu te
Azali se ye moko
Oyo atambola na mayi
Azali se ye moko
Oyo asekuisa lazalo
Azali se ye moko
Asilisa makasi
Azali se ye moko
Ya force de pesanteur
Azali se ye moko
Yesu amata na likolo
Azali se ye moko
Na nguya na ye ya bozambe
Azali se ye moko

Eya na butu eya na moyi
Na kobamba eloko moko te

Toza na yesu
Elombe na bitumba
Alonga satana
Alonga mpe mokoli
Ye nde mopanga ebundeli na ngai na bitumba
Tokoma balongi lokolo se na ye

Oyo aza makasi atuta tolo
Atombola mosapi toyeba ye
Lokola ye awuta wapi
Pene na ye amonani te

Azali se ye moko
Nzambe na ngai eh
Azali se ye moko
Bazalaka misato te
Azali se ye moko
Azali se ye moko
Tata, mwana mpe molimo santu
Azali se ye moko
Se, mbonge mipepe etosaka ye
Atia boulevard na mayi
Se ye moko
Aza ye moko

Ah na ekulusu bozalaka misato
Oyo akufela ngai ezali se yo moko yesu
Eh yaya oza mokonzi
Na ngomba transfiguration bozalaka na mose na eli
Bakenda wapi otikala yo moko
Eh yaya oza mokonzi
Ah na jourdain, bozalaka batu ebele
Mongongo eloba toyoka se yo moko yesu
Eh yaya oza mokonzi
Même si les hommes ne sont pas d'accord
Ngai natatoli tu es mon seigneur et mon dieu

Ozali se yo moko
Ozali se yo moko
Ozali se yo moko
Kaka yo nde mokonzi na ngai
Ozali se yo moko
Mpate na nzambe
Ozali se yo moko
Mosantu akomaki lisumu
Ozali se yo moko
Po ngai na koma mosantu
Ozali se yo moko
Yango naposi ba grade na ngai
Ozali se yo moko
Liboso na yo mosantu
Ozali se yo moko
Ngai na tiki lolendo na ngai
Ozali se yo moko
Liboso na yo mosantu
Ozali se yo moko
Ngai makiti na mabolongo yaya
Ozali se yo moko
Na ngumbalemi yo mosantu
Ozali se yo moko

Eya na butu eya na moyi
Na kobamba eloko moko te

Toza na yesu
Elombe na bitumba
Alonga satana
Alonga mpe mokoli
Ye nde mopanga ebundeli na ngai na bitumba
Tokoma balongi lokolo se na ye

Encontrou algum erro na letra? Por favor envie uma correção clicando aqui!