Mike kalambay

Lamentations

Mike kalambay
Papa to nkende lisusu epayi na nani?
Yo moyoki losambo yoka kolela ya motema ezo ke mingi

Nkolo Yesu yo mwana na Nzambe
Yo nde mitema ya ba santu etalelaka
Ba yaki na yo bazongaki pambaté
Papa malamu oyebi olata pasi ya bana
Ozali moko oyo aza namakoki
Yako pesa biyano na ba yike na mbala moko
Oh Yesu eh, oh Yesu yo, papa malumu Yesu eh
Nzambe ya solo, Ouh Yaya, Ekimelo na ngai
Eh Yesu eh, pinzoli na ngai etangi
Oh Yesu na komi na suka
(Ah Yesu)

Ô Yesu pinzoli etangi
Pasi na motema nakaba lisolo ango na nani?
Ata na yebisi moto oko kokomate
Pasi na motema miso ya moto ekoma ndenge nini?
Na leli, lokola Yoane na Patmos
Nani alingi ngai, a longola ngai pasi oyo?
Na leli, pangusa ngai mayi ya miso
(Oh Yesu)
Yesu mwana Nzambe
Motema na ngai eleli mingi eh

Na yebi ozali Nkolo
Elikia ya basantu nionso
Motema epona se yo
Yo Nkolo ya bomoyi na ngai
Na yebi ozali Nkolo
Elikia ya basantu nionso
Motema epona se yo
Yo Nkolo ya bomoyi na ngai
Oyo esalaka ngai
Pasi na motema
Na ekulusu
Omemaki yango
Yesu mwana Nzambe
Pikola na mosisa
Oyo nionso elelisaka ngai
Zala Papa, na zala mwana
Ngolu na yo ebomba ngai
Eh, eh

Pinzoli na ngai
Papa etangi mingi (etangi mingi eh)
Na Bible pona ngai bilaka esili to nini eh?
Na ngangi au secours, mongongo ekawuki ngai
Na lingi na yeba nini ezo pekisa o sala?
Sokipe lisumu, loba na tubela
Po pasi oyo nazo koka lisusu te
Soki pe ya baboti kupe bakoko na ngai Yesu
Banza ekulusu, makila osopaki pona ngai
Tout est accompli, maloba na yo
Boni ya ngai likambo
Yesu ezangi solution
Telema moto ya suka
Na yebi ozali Nkolo
(Ooh Nkolo)
Elikia ya basantu nionso
(Elikia ya basantu nionso)
Motema epona se yo
(Eh Nkolo na ngai)
Yo Nkolo ya bomoyi na ngai
(Mokonzi na ngai na yebi)
Na yebi ozali Nkolo
(Oh Nkolo Yesu)
Elikia ya basantu nionso
(Ya basantu nionso Yesu na ngai)
Motema epona seyo
(Epona se yo mosusu te Yesu)
Yo Nkolo ya bomoyi na ngai
(Oh Yesu eh)
Oyo esalaka ngai
Pasi na motema
Na ekulusu omemaki yango
Yesu mwana Nzambe
Pikola na mosisa
Nionso
Oyo nionso elelisaka ngai
Etangisaka nga pinzoli
Zala Papa, na zala mwana na yo
Ngolu na yo ebomba ngai

Nga na yebi
Na yebi ozali Nkolo
Oh Yesuuuuu
Elikia ya basantu nionso
Elikia na ngai

Encontrou algum erro na letra? Por favor envie uma correção clicando aqui!