Mike kalambay

Fongola likolo

Mike kalambay
Lolengo moko isai amonaki likolo kofonguama
Mpe mokonzi afandi na ngwende naye ya bokonzi
Yesu pasola likolo, kitisela biso nkembo nayo, libula mpe moko
Ya elaka pona ba santu aleluia

Tango bato batunaka ngayi, wapi nzambe na yo
Na yanolaka na lolendo, yesu oza na bomoyi
Ata liboso na ngayi molili, mibale ngambo na ngambo
Nayebi y'okosala nzela po na mona pole
Oyo bato bamonaka te, omonaka yango
Yango motema na ngayi etatoli, yesu ozali nzambe
Yo lipata etambwisaka bomoyi na ngayi
Nabutu yo wana yo obonguani likonzi ya moto
Otelemaka moto ya suka na bitumba na nga
Olobi nga nazinga maboko, nazela elonga
Eh eh nzambe na nga

Fongola likolo
Hum likolo, likolo
Nokisa mvula no ya nkembo
Hum yesu
Bakangami bakanguama
Hum tobika yawheh
Bikamua na kombo na yesu
Ba questions, ba problèmes na nga
Mituna ya batu ezua biyano
Totatola
Totatola solo oza nzambe
Eh nkolo yesu nzambe na ngaaaaaa
Fongola likolo
Hum eee yaya ee yaya
Nokisa mvula no ya nkembo
Oh ee bakangamiiii
Bakangami bakanguama
Ebongo tobika
Bikamua na kombo na yesu
Mituna ba inquietudes na nga
Mituna ya batu ezua biyano
Totatola
Totatola solo oza nzambe

Ata nanu na mona yo te ya yesu na ngayi
Na yebi naza na makoki ya kosimba yo
Po liloba na yo ya bomoyi epesa ngayi nzela
Yako mona yo pe kosimba yo na kondima ngayi
Batela motema na ngayi, papa bilembo ekoki
Etikali muke ozonga, toyemba hozanna
Oyo bato basalaka te yesu osalaka yango
Yango na tatoli na loyembo yo nde ozali nzambe
Eheeeee mokonzi na ngaaaa

Fongola likolo
Fongola likolooo
Nokisa mvula no ya nkembo
Heeee bakangamiiii
Bakangami bakanguama
Hum yesuuuuu
Bikamua na kombo na yesu
Mituna mituna na nga
Mituna ya batu ezua biyano
Totatola eeeeee
Totatola solo oza nzambe
Ohhh nabondeli yo mokonzi na ngaaaaaa
Fongola likolo
Tomona pe esengo
Nokisa mvula no ya nkembo (mvula no ya nkembo)
Hoooo yesuuuu
Bakangami bakanguama (yesu yesu yesu)
Bikamua na kombo na yesu
Yo nde eyano ya nzambe na mituna ya bato
Mituna ya batu ezua biyano
Yo loboko ya mobali ya tata
Totatola solo oza nzambe (opesaka elonga)

Elikia ya bomoyi ya basantu efandi ya ngo
Ba pota ya motema na nga oyebi yango
Osimbi biyano ya mituna elekela nga eh!

Kanisa ta mosika towuti ngayi na yo
Ba mbonge mipepe biso pe olongisa ngayi
Tokoma lelo yesu olingi otia ngayi wapi eh!

Mokonzi na nga yaya
Yaka eh!
Yesu ehh!
Tomona
Ô nini yango
Bikamua
Ô lelelele
Na kombo na yesu
Elombe telema
Telema
Nguluma
Nguluma
Nkosi na yuda, yesu
Nkosi na yuda, banguna basambwa

Papa yaka
Yaka
Yaka
Tomona
Yaka
Bikamwa
Yeye yesu na nga
Nakombo na yesu
Elombe telema ohhh
Telema
Ngulusa ba nguna na nga
Nguluma
Latisa nga elonga na yo
Nkosi na yuda, yesu (yesu ehe yesu eehh!)
Banguna basambwa
Mokonzi yaka
Yaka
Papa yaka
Tomona
Telema na nkembo nayo
Bikamwa
Yesu mokonzi na nga
Nakombo na yesu
Elombe na nga telema yesu eee
Ngulumaaaa
Nguluma
Goliath akueya lelo
Nkosi na yuda
Tomona monene na yo
Ba nguna basambua

Elombe telema
Pardon telema
Yesu telema
Tomona loboko na yo
Je t'en prie telema
Mokonzi telema

Encontrou algum erro na letra? Por favor envie uma correção clicando aqui!